Franco Luambo Makiadi et T.P.O.K. Jazz - Mario (Lyrics)

May 01, 2024 - 09:42 PM
Mamou by Franco Luambo (lyrics Translation)
This hit song composed by Franco is also known as Tu Vois ? (You see ?). It is a song about two women who accuse each other of infidelity and prostitution.  It was one of the very first songs which prominently featured Madilu System and announced him to the musical world.

Olobaki nini eh eh
Olobaki nini mamou eh eh
Olobaki ngai nafundaka yo na mobali nayo
Olobaki ngai nasalaka kisefe na libala na bino
What did you say?
What did you say Mamou ?

You say that I'm always reporting you to your husband You say that I am causing trouble in your marriage
Madilu tika ye aloba eh
Makambo ye asalaka ayebaka te
Babalabala ye atambolaka, bato bamonaka ye
Ba ndako ye akotaka ba murs ya ndako efundaka ye Na ba coin nyoso ye atelemaka, ba chauffeur ya taxi bamonaka ye
Mpo na nini apanza yo nsango alobi yo osalaka kisefe eh?
Madilu let her talk
She does not know what she is doing
As she walks on the streets, people can see her In the houses that she always visits, walls accuse her
In all road junctions that she likes hanging around, taxi drivers see her Why does she spread stories that you are the one causing trouble in her marriage"?
Ngai moto nakotelaka yo mamou eh Ngai moto nayebi basekele mamou eh Lelo nakomi moto mabe oo mamou eh Oyebi tango engindaka ooh mamou eeh Okokanisa ngai mamou nakei eh eeh Ata ofingi ngai ndumba mamou eeh
I am the one who defends you mamou
I am the who knows all your secrets mamou Today I have become a bad person mamou
You know when things heat up mamou You will remember me mamou when I am gone
Even if you call me a prostitute mamou
Oh mamou, nakamwe Vraiement mammou
Nakanisaka ozalaka amie na ngai ya motema Eloko ekamwisi ngai lelo mamou, okeyi kofinga ngai epayi ya moussa
Mpo, oyebi te nayebi ba sekele na yo nyoso
Olobi ngai nazali ndumba Vraiement mamou oyebi ngai nabalaka nadivorsa, nabota
Bongo soki lelo oyo yo mamou, moto natiaka motema Obandi kofinga ngai ndumba
Oh mamou I am shocked mamou
I always thought you were my friend
Because you know that I know all your secrets What shocked me today mamou is that you have gone to insult me at Moussa's place
You said I am a prostitute
In reality you know that I was married, I was divorced and I had children
Yet today you the person I trust has called me a prostitute
Kindumba ezali maladie te,
Kindumba ezali punition te
Mamou yo mwasi ya libala Nakamwaka yo, otambola na kabambi ya sac a main
Na sac wana, kabambi ya liputa, brose a dent lokola moto akokende Voyage, lipapa ya nse, ebele ya makasu
Prostitution is not a disease
Prostitution is not a punishment
Mamou you are a married woman
You always surprise me you always go out with a big handbag Inside that handbag you are carrying a loincloth your toothbrush as if you were traveling , a pair of slippers, and a lot of kola nuts
Eloko nini okoluka eh mamou ye eeh?
Mamou oyebi epayi na yo ngai nazalaka buvre Mpo nayebi mibali nayo akuti yo nyoso tuu
Ata mobali nayo akuti yo oza kosala na mobali Okoloba te eza mobali na ngai
Mais nalingaka koboma libala na bino te
Mpo nalingaka bobokolo bana na bosembo Au lieu nakota baloba oooh tala mwasi ya ndumba awuti koboma libala ya mwasi oyo abala
What are you looking for mamou?
Mamou you know that I am an alibi for you Since I know all your boyfriends
When your husband finds you talking to another man You quickly claim that he is my boyfriend I never wanted to break your marriage
Because I always wanted you to bring up your children serenely
Instead of getting involved in your marriage so that after that people will blame me by saying: Look, this prostitute has caused that couple to divorce"
Eloko nini okoluka eh mamou eh?
Signature osi ozwa Mamou
Landa nzela ya libala ooh mamou Yango evandisa yo na mpoto mamou eh eeh
Tika kokosa mobali nayo mamou eh eeh Soki atelefoner loba obimaka mamou uuh
What are you looking for mamou?
You have already secured the signature of my bank account
Behave like a married woman
It is because of your marriage that you live in Europe Stop being unfaithful to your husband
when he rings you, admit that you go out
Mamou awa tuu soki nalobi, nakumbi ngambo mpo naza ndumba Yo moko oyebisa ngai mobali na yo atinda yo na poto mpo oya kobokola
Yango wana apesa signature
Ekoma yo awa oyebisa ngai mobali na yo atelefonaka 2 fois par jour
Na 6 heures du matin, na minuit
Apre's minuit soki atelefoner yo
Okamati kisi ya bangungi opomper ndako mobimba Mpo bana balala tiki tango okozonga
Mpo oyebi te mobali na yo atelefonaka na 6 heurs du matin Tango atelefoneka yo yoka ndenge oyebisaka na mobali nayo
Mamou if I decide to say a word I will be blamed because I am a prostitute You yourself told me yourself that your husband sent you to Europe to take care of your children
That's the reason he opened a bank account for you You told me that since you came here, your husband calls you twice a day
At 6 am and at midnight
But just after his midnight call You take insecticide and spray in the whole house
So that your children can sleep deeply until you come back
Because you know your husband is supposed to call you at 6 o'clock in the morning, you will make sure that you come back by that time to answer the call
And when the call of your husband comes listen to what you often tell him
"Allo, papa ya bana, biso toza na biso kaka malamu
Kaka nde bana na yo awa moyen te Vraiment mobulu likambo Surtout mwana oyo ya moke ya mobali oyo ozwa elongi na papa eh
Azokamwisa ngai papa
Foto kutu otiya na sani natalaka ata elongi na yo abamba yango na mabele foto epasuka
Mwana oyo mpenza mobulu penza kaka se ndenge ozalaka mwana moke Lokola mama na yo ayebisaka ngai
Papa ya bana, na'a na makambo mosusu naloba te kaka otindela biso mbongo ya koliya, nasuki se
bongo
"Hello, father of my children, we are all fine except your children are not easy to handle
especially the younger boy who looks like you He really surprises me
heh has broken the plate on which your photograph was printed This young boy is really turbulent
Exactly as you were in your childhood
As your mother told me
The father of my children, I do not have more to tell you today except you should remember to send us
money for food"
Yo moko osalaka mabe eh mamou eh eeh
Yo moko osalaka mabe ye yeh
Obangaka mobali nayo te mamou ye yeh
Olongola respect na ye okaba mamou eh eeh
Ba camarades ya mobali nayo mamou eh, obangaka bango te oh mamou ye Lelo ofingi ngai ndumba ah ngai naseki eee mamou eh eh
You are the one who is misbehaving mamou
You are the one who is misbehaving You don't respect your husband, mamou
You even took his respect and gave it away mamou You do not respect your husband's friends
Today you have insulted me by calling me prostitute, I am laughing
Oh mamou, kindumbaoza kofinga ngai brusselle mobimba
Okeyi tii na paris osilisi ngai
Otindi mokanda na Kinshasa, mosusu otindi na Brazza Kindumba eza punition te mamou
Oyeba mamou eswi ngai
Mamou, you are going all over Brussels, calling me a prostitute. You have gone to Paris to insult me
You sent a letter to Kinshasa, and another letter to Brazzaville
Prostitution is not a punishment Mamou you should know that this hurts me
Nalingaki d'ailleurs nafunda yo mamou
Infutile nafunda yo
Nakamati obele filme ya makambo nyoso ya mabe oyo osalaka
Natekisi yango epayi ya yobo Mpo azikisela ngai filime wana
Mamou koma ngai
Ndenge bakomaka Yesu na kuruze Sete mibale na maboko, sete moko na lokolo
I want to report you to your husband mamou
It is useless for me to report you
But I have filmed all the stupid things that you normally do
I have sold it to Yobo
So that he can burn that film for me
Mamou hang me
The way Jesus Christ was hanged on the cross
Two nails on his hands, one nail on his feet
Mamou ozali mwasi ya libala okamwisaka ngai
Namonaka yo ozali ndoki
Ozali kinsweka, ozali monyororo
Mamou nini nakoki koloba mpo na yo
Example nini yo okoki kopesa mpo na basi ya mabala?
Example ezali te
Mamou you are a married woman but you surprise me Mamou, what can I say about you What kind of example are you giving married women
I can see that you are a witch
You are a parasite, You are a rope
There is no example
Kaka baloba te mpo ngai nazali ndumba Na kotambola na mwasi ya libala Yango wana na kopesa yo makanisi mabe Te ezali nde yo moko moto oza na makanisi mabe
You want people to say that because am 'a prostitute I am walking around with a married woman That's why I am giving you a bad advice? No, it is you yourself who have bad thoughts
Ngai moto nakotelaka yo ooh
Ngai moto nayebi basekele eh eh
Lelo nakomi moto mabe oo mamou eh Ata ofingi nga ndumba mamou eeh
Oyebi tango engindaka ooh mamou eeh Okokanisa ngai mamou nakei eh eeh
I am the one who supports you
I am the one who knows the secrets
Today I become a bad person, mamou Even if you call me a prostitute
You know when things go bad mamou You will remember me when I'm gone mamou
Ngai moto nawelaka yo mamou eeee
Ngai moto nakufelaka yo Lelo nakomi enemi jure oh mamou eh eh
Oyebi tango engindaka mamou uh Okokanisa ngai mamou nakei eh eeh
Landa nzela ya libala oh mamou ye ye
I am the one who stands by you mamou I am the one who will die for you Today I've become your sworn enemy mamou You know when things go bad mamou You will remember me when I'm gone Behave like a married woman, mamou
Madilu tika ye aloba eh eh
Makambo miki-mike ye asalaka ayebaka te
Ba couleurs ya ndako efundaka ye, Bato bamonaka ye, lelo apanza ngai sango
Afinga ngai nazali ndumba
Kindumba ezali maladie te
Kindumba ezali punition te
Kindumba na ngai nazwaka
Kindumba na nga bayebi
Nakosaka moto te
Mpo na nini apanza nga nsango olobi yo osalaka kisefe?
Madilu, let her speak
She does not know the little things she does
The colors of the house can report her
People see her, today she's spreading rumors about me She is calling me a prostitute
Prostitution is not a disease
Prostitution is not a punishment
I earn money from my prostitution Everyone knows about my prostitution
I do not offend anybody Why are you spreading rumors that I am a troublemaker
Mamou mokolo mosusu, tongo etaneli yo epayi mosusu
Mpo olalaki na ndako te
Odevancer mobali nayo otelefoner ye avarant 6 heures Mpo oloba te ozali na mwana na yo oyo ya moke na kati ya hospital, azali malade
Mamou one day, morning found you at a different place
Because you did not sleep at home You anticipated the situation by calling your husband before 6 o'clock
Because you wanted to tell him that you are in hospital with the sick child
Yo moko osalaka mabe eh mamou
Yo moko osalaka mabe eh
Obangaka mobali nayo te mamou Olungola respect na ye okaba mamou eh eh Lelo ofingi ngai ndumba ngai naseki eh mamou
Ba-camarades ya mobali nay o mamou
Ba camarades ya mobali nayo mamou Obangaka bango te mamou ye ye ye
You are the person who misbehaves mamou
You are the person who misbehaves
You do not respect your husband mamou
Your husband's friends mamou
You took his respect away mamou
Your husband's friends mamou
You don't respect them mamou

Comments(0)

Log in to comment