Lingala Moment

August 14, 2024 - 02:50 PM

LINGALA MOMENT 


1. Come to the house – yaka na ndako.
2. If I see another person – soki namoni moto mosusu.
3. You forgot the way you used to follow me – Obosanaki ndenge olandaki ngai.
4. I came but I did not find you – nayaki kasi nakutaki yo te.
5. Have you found the happiness you were looking for? – Ozuwi bisengo olukaki?
6. Have you read this book? – Otangi buuku oyo?
7. This is my husband, the father of my children – Oyo azali mobali nangai, tata ya bana nangai.
8. Where are you from? – Owuti wapi?
9. That house had no window – ndako wana ezalaki na lininisa te
10. We are here to learn the Lingala language – Tozali awa koyekola ndinga ya Lingala.
11. Come we dance – yaka tobina
12. The children are playing football outside – Bana bazali kobeta ndembo ya makolo na libanda.
13. It's raining hard – (mbula) ezali konoka /kobeta makasi
14. It seems like it is going to rain today – Ezomonana lokola (mbula) ekobeta/ekonoka lelo.
15. This child seems to have good manners –Mwana oyo azomonana lokola azali na bizaleli malamu.
16. Wait for your husband at home – Zela mobali nayo na  ndako.
17. This is good work – oyo ezali mosala malamu
18. She sells fruits and vegetables at the market – Atekaka mbuma mpe ndunda na zando
19. My friends have run away from me – Baninga nangai bakimi ngai.
20. Why only me? – mpo na nini kaka ngai?
21. God punishes bad people – Nzambe apesaka bato mabe etumbu. 
22. All people want a good life – bato nionso balingi bomoi malamu.
23. What is your name, again? – Nkombo nayo nani, lisusu?
24. Citizens of this nation – Banamboka ya ekolo oyo.
25. A journey is not death – mobembo ezali liwa te.
26. Whose debt do you want me to pay? –Olingi (ngai) nafuta niongo ya nani?
27. Many days have passed – mikolo mileki mingi.
28. She does not dress well – alataka malamu te.
29. They have refused to listen to me – baboyi koyoka ngai.
30. I am going to buy onions – nakei kosomba matungulu.



Next Track

 

 Listen to Jabulani Radio Jabulani Radio.png (5 KB)


Track History

 

Comments(0)

Log in to comment